Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 10

Maloba ya ebandeli ya Eteni 10

Yehova azali Mokonzi ya nyonso. Azali na makambo nyonso na mabɔkɔ mpe likambo moko te elekelaka ye. Na ndakisa, abikisaki Yirimia na liwa. Abikisaki Shadrake, Meshake mpe Abedenego na litumbu ya mɔtɔ mpe Danyele na libulu ya bankɔsi. Yehova abatelaki Estere mpo akoka kobikisa ekólo na ye mobimba. Akotika te mabe ezala mpo na libela. Bisakweli ya ekeko monene mpe ya nzete monene emonisi ete mosika te Bokonzi ya Yehova ekolongola mabe nyonso mpe ekoyangela mabele.

NA ETENI OYO

LITEYA 57

Yehova atindi Yirimia asakola

Makambo elenge Yirimia alobaki epesaki bankumu nkanda makasi.

LITEYA 58

Yerusaleme ebebisami

Bato ya Yuda bakobaki kosambela banzambe ya lokuta, yango wana Yehova asundolaki bango.

LITEYA 59

Bana mibali minei oyo batosaki Yehova

Bana mibali ya Yuda bazwaki ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova ata na lopango ya mokonzi ya Babilone.

LITEYA 60

Bokonzi oyo ekoumela libela na libela

Danyele alimboli ndɔtɔ ya kokamwa ya Nebukadenezare.

LITEYA 61

Baboyaki kogumbama

Shadrake, Meshake, ná Abedenego baboyaki kosambela ekeko ya wolo oyo mokonzi ya Babilone asalaki.

LITEYA 62

Nzete monene oyo ezalaki elilingi ya bokonzi moko

Ndɔtɔ oyo Nebukadenezare alɔtaki ezalaki komonisa makambo oyo ekokómela ye.

LITEYA 63

Makomi na efelo

Ntango nini makomi yango ya kokamwa ebimaki, mpe elimbolaki nini?

LITEYA 64

Danyele na libulu ya bankɔsi

Bondeláká Yehova mokolo na mokolo, ndenge Danyele azalaki kosala!

LITEYA 65

Estere abikisi bandeko na ye

Atako azalaki mopaya mpe mwana-etike, akómaki mokonzi-mwasi.

LITEYA 66

Ezera ateyaki Mibeko ya Nzambe

Ntango Bayisraele bayokaki Ezera, bapesaki Nzambe elaka.

LITEYA 67

Bifelo ya Yerusaleme

Nehemia ayokaki ete banguna balingi kopekisa mosala. Mpo na nini abangaki te?