Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 12

Maloba ya ebandeli ya Eteni 12

Yesu ateyaki bato makambo oyo etali Bokonzi ya likoló. Ateyaki bango mpe bábondelaka ete nkombo ya Nzambe esantisama, Bokonzi ya Nzambe, mpe mokano ya Nzambe esalema na mabele. Soki ozali moboti, limbolelá mwana na yo ntina ya libondeli yango mpo na biso. Yesu aboyaki Satana abebisa bosembo na ye. Aponaki bantoma na ye, mpe bakómaki bato ya liboso oyo baponamaki mpo na koyangela na kati ya Bokonzi yango. Monisá ye ndenge Yesu azalaki na molende mpo na losambo ya solo. Yesu alingaki mpenza kosalisa bato, yango wana abikisaki bato ya maladi, aleisaki bato ya nzala, mpe asekwisaki ata bakufi. Yesu asalaki makamwisi nyonso wana, mpo na komonisa makambo oyo Bokonzi ekosalela bato.

NA ETENI OYO

LITEYA 74

Yesu akómi Masiya

Yoane alingaki koloba nini ntango abengaki Yesu Mwana-Mpate ya Nzambe?

LITEYA 75

Zabolo ameki Yesu

Zabolo amekaki Yesu mbala misato. Ezalaki na makambo nini? Biyano nini Yesu apesaki ye?

LITEYA 76

Yesu apɛtoli tempelo

Mpo na nini Yesu abenganaki banyama na tempelo mpe abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo?

LITEYA 77

Mwasi moko na liziba ya mai

Mwasi moko Mosamaria akamwaki ndenge Yesu asololaki na ye. Mpo na nini? Likambo nini Yesu ayebisaki ye oyo ayebisá naino moto mosusu te?

LITEYA 78

Yesu asakoli nsango ya Bokonzi

Yesu asɛngaki na bayekoli na ye mosusu bákóma “baluki-bato.” Na nsima, apesaki bayekoli na ye 70 formasyo ya kosakola nsango malamu.

LITEYA 79

Yesu asali makamwisi ebele

Bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, bato bazalaki koya epai na ye mpo asalisa bango, mpe azalaki kobikisa bango. Asekwisaki kutu mwana mwasi moko oyo akufaki.

LITEYA 80

Yesu aponi bantoma zomi na mibale

Aponaki bango mpo na nini? Oyebi lisusu nkombo na bango?

LITEYA 81

Lisolo Likoló ya Ngomba

Yesu ateyaki ebele ya bato oyo bayanganaki makambo ya ntina mingi.

LITEYA 82

Yesu ateyi bayekoli na ye ndenge ya kobondela

Yesu ayebisaki bayekoli na ye ‘bákoba kosɛnga’ makambo nini?

LITEYA 83

Yesu aleisi bankóto ya bato

Likamwisi yango eteyi biso nini mpo na Yesu ná Yehova?

LITEYA 84

Yesu atamboli likoló ya mai

Bantoma bayokaki ndenge nini ntango bamonaki likamwisi yango?

LITEYA 85

Yesu abikisi moto mokolo ya Sabata

Mpo na nini bato basepelaki te na makambo oyo asalaki?

LITEYA 86

Yesu asekwisi Lazare

Ntango Yesu amonaki Maria azali kolela, ye mpe alelaki. Kasi na nsima, kolela na bango ebongwanaki esengo.