Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 13

Maloba ya ebandeli ya Eteni 13

Yesu ayaki awa na mabele mpo na kopesa bomoi na ye mpo na bato ya kozanga kokoka. Atako akufaki, alongaki mokili. Yehova azalaki sembo epai ya Mwana na ye mpe azongisaki ye na bomoi. Tii na liwa, Yesu asalelaki bato makambo na komikitisa mpe azalaki kolimbisa bango ntango bazalaki kosala mabunga. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye. Alakisaki bango ndenge ya kosala mosala ya ntina mingi oyo apesaki bango. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo ayeba ete biso mpe tosengeli kosala mosala yango.

NA ETENI OYO

LITEYA 87

Elekeli ya nsuka ya Yesu

Yesu apesaki bantoma na ye malako ya ntina mingi ntango alyaki elongo na bango bilei na ye ya nsuka.

LITEYA 88

Bakangi Yesu

Yudasi Mokeriota ayaki na ebele ya bato oyo basimbi mipanga ná banzete na Elanga ya Getesemane mpo na kokanga Yesu.

LITEYA 89

Petro awangani Yesu

Likambo nini elekaki na lopango ya Kaifa? Mpe nini ekómelaki Yesu na kati ya ndako?

LITEYA 90

Yesu akufi na Golgota

Mpo na nini Pilate alobaki ete báboma Yesu?

LITEYA 91

Yesu asekwi

Makambo nini ya kokamwa esalemaki mwa mikolo nsima ya liwa ya Yesu?

LITEYA 92

Yesu abimeli mibali oyo bazalaki koboma mbisi

Yesu asali nini mpo na kobɛnda likebi na bango?

LITEYA 93

Yesu azongi na likoló

Kasi liboso azonga na likoló, apesaki bayekoli na ye malako ya ntina mingi.