Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 14

Maloba ya ebandeli ya Eteni 14

Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bapalanganisaki nsango malamu ya Bokonzi tii na bisika eleki mpenza mosika na mabele. Yesu atambwisaki bango bisika basengelaki kosakola mpe na ndenge ya likamwisi apesaki bango likoki ya koteya bato na minɔkɔ na bango moko. Yehova apesaki bango mpiko mpe nguya ya kolonga mikakatano ya makasi.

Na emonaneli moko, Yesu alakisaki ntoma Yoane nkembo ya Yehova. Na emonaneli mosusu, ntoma Yoane amonaki Bokonzi ya likoló elongi Satana mpe esukisi boyangeli na ye libela. Yoane amonaki Yesu azali koyangela elongo na bato 144 000. Yoane amonaki mpe mabele mobimba ekómi paradiso esika bato nyonso bazali kosambela Yehova na kimya mpe na bomoko.

NA ETENI OYO

LITEYA 94

Bayekoli bazwi elimo santu

Nguya nini ya kokamwa elimo santu epesaki bango?

LITEYA 95

Eloko moko te ekokaki kopekisa bango

Bakonzi ya mangomba oyo babomisaki Yesu, baluki sikoyo kopekisa bayekoli na ye kosakola. Kasi bakokaki te.

LITEYA 96

Yesu aponi Saulo

Saulo azali monguna mpenza ya bakristo, kasi akobongwana mosika te.

LITEYA 97

Korneyi azwi elimo santu

Mpo na nini Nzambe atindaki Petro na ndako ya moto oyo azalaki Moyuda te?

LITEYA 98

Bokristo ekɔti na bikólo ebele

Ntoma Paulo ná baninga na ye bamisionɛrɛ babandaki mosala ya kosakola na mikili ya mosika mpenza.

LITEYA 99

Mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ akómi mondimi

Mpo na nini lisolo yango elobeli demo, koningana ya mabele mpe mopanga?

LITEYA 100

Paulo ná Timote

Mibale yango mibale basalaki elongo mpe bazalaki baninga bambula ebele.

LITEYA 101

Batindi ntoma Paulo na Roma

Mobembo yango ezali na makama ebele, kasi ata mokakatano moko te ekoki kolɛmbisa ntoma yango.

LITEYA 102

Emoniseli epai ya Yoane

Yesu alakisaki ye emonaneli ndenge na ndenge mpo na mikolo ezali koya.

LITEYA 103

“Bokonzi na yo eya”

Emoniseli ya Yoane emonisi ndenge Bokonzi ya Nzambe ekobongola bomoi awa na mabele.