Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 6

Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe

Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe

(Nzembo 19)

  1. 1. Likolo’esakoli nkembo ya Nzambe.

    Mapat’emonisi nguy’a

    lobɔkɔ n’e.

    Ntɔngɔ mpe eza’ kokumisa ye.

    Butu’esakoli bolingo,

    Bwanya, mpe nguya n’e.

  2. 2. Mibeko ya Yehova nde lobiko,

    Mateya n’ekambi nkɔkɔ,

    mwan’elenge.

    Malako na y’eza’ mpenza sembo.

    Liloba n’ekosaka te,

    Mibeko n’e pɛto.

  3. 3. Kobanga Yah eza’ pɛto mpe seko.

    Mpe mibeko na ye,

    wolo’etɛlɛma te.

    Malako na y’ez’obatela mpe.

    Tókumisa nkombo na ye,

    Ye Nzambe monene.