Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 10

Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!

Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!

(Nzembo 145:12)

  1. 1. Pesá nde Yehova nkembo!

    Yebisá bato nkombo n’e!

    Belelá: Mokolo na ye

    Ebɛlɛmi, bámilɛngɛla.

    Yehov’alobi ngong’a Bokonzi

    Ya Mwana na ye yang’oyo.

    Panzá nsang’oyo: Nzambe az’oya

    Na makambo ya kitoko!

    (MONDIMO)

    Pesá nde Yehova nkembo!

    Ye Monene, yebisá bato!

  2. 2. Nkembo n’e! Belelá yango!

    Pambolá nkombo ya Nkolo!

    Nga’ ná yo, Mpo tótɔnda ye,

    Tópanza nsango na molende.

    Yehov’azali monene kasi

    Amikitisaka mingi.

    Na mawa n’e az’oyoka biso,

    Az’opes’oyo tosɛngi.

    (MONDIMO)

    Pesá nde Yehova nkembo!

    Ye Monene, yebisá bato!