Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 12

Yehova, Nzambe monene

Yehova, Nzambe monene

(Kobima 34:6, 7)

  1. 1. Yehova, yo nde Nzambe monene,

    Tiká tókumisa yo,

    Oza’ boboto, sembo.

    Nkolo ya bwanya, nguya, bolingo.

    Y’ozali Nzambe seko.

  2. 2. Mawa n’o, Tata, toza’ komona.

    Toza’ mabele kasi

    Tobondeli, ondimi.

    Yo nde Moteyi, yo mpe Moleisi!

    Butu moi yo Mosungi.

  3. 3. Likoló ná nse eyembeli yo.

    Totomboli mingongo,

    Tókumisa yo seko.

    Yehova, yo nde Nzambe monene.

    Ndimá tókumisa yo.