Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 18

Tózala na botɔndi mpo na lisiko

Tózala na botɔndi mpo na lisiko

(Luka 22:20)

  1. 1. Nzambe Yehova

    toyei liboso na yo.

    Mpo bolingo na yo nde

    eleki monene.

    Opesaki Mwana na yo

    mpo na biso.

    Yango nde mbeka eleki

    mpenza monene.

    (MONDIMO)

    Yesu asikolá biso

    na nzel’a makila na ye.

    Tokopesa yo

    matɔndi mingi mpo na seko.

  2. 2. Yesu’apesaki mbeka

    mpo alingaki.

    Bolingo etindaki ye

    apesa yango.

    Liwa na ye epesi

    biso elikya

    Ya kobika seko mpo

    liwa ekosila.

    (MONDIMO)

    Yesu asikolá biso

    na nzel’a makila na ye.

    Tokopesa yo

    matɔndi mingi mpo na seko.