Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 24

Bóya na ngomba ya Yehova

Bóya na ngomba ya Yehova

(Yisaya 2:2-4)

  1. 1. Talá na likoló,

    Talá ngomb’a Yehova.

    Lelo, etombwani koleka

    ngomba nyonso.

    Bato ya mosika,

    Bauti bipai nyonso,

    Baza’ kobelela:

    ‘Yaká, tósalela Yah.’

    Sikoyo nde ntango

    Ya mok’eza’ koya monene.

    Tokómi ebele

    Mpo topambolami na Nzambe.

    Bato basopani

    Mpe bandimi Yehova.

    Bango balaki

    kolanda Nzambe libela.

  2. 2. Yesu alobaki:

    Bósakola liloba.

    Nsango lelo ekómi

    mokili mobimba.

    Kristo’az’oyangela,

    Asɛngi tólanda ye.

    Bampate bayoki

    Mpe baza’ kotosa ye.

    Nsai na motema,

    Bato baza’ koya se koya.

    Biso mpe tósunga,

    Bato nyonso báyeba solo.

    Tiká tóbelela,

    Tóbenga moto nyonso:

    ‘Yaká na ngomba ya

    Nzambe mpo na libela.’