Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 26

Bosalelaki nde ngai

Bosalelaki nde ngai

(Matai 25:34-40)

  1. 1. Bampate mosusu, oy’a Nkolo Yesu

    baz’osalisa bandeko ya Kristo.

    Nyonso basali mpo

    na kosunga bango,

    Yesu’alobaki akozongis’ango.

    (MONDIMO)

    “Soki obɔndisi bandeko na nga’,

    Yebá obɔndisi nde ngai mpenza.

    Kosunga bango nde mpe kosunga nga’.

    Opesi bango nde opesi nga’.

    Osaleli bango nd’osaleli nga’.”

  2. 2. “Bosalisaki nga’ na bilei mpe na mai,

    na mpasi na ngai, boyaki noki.”

    Bampate bakotuna ye:

    “Ntango nini?”

    Mokonzi’akopesa eyano oyo:

    (MONDIMO)

    “Soki obɔndisi bandeko na nga’,

    Yebá obɔndisi nde ngai mpenza.

    Kosunga bango nde mpe kosunga nga’.

    Opesi bango nde opesi nga’.

    Osaleli bango nd’osaleli nga’.”

  3. 3. “Bokangami na nga’, bosali mosala,

    na kosakola ná bandeko na nga’.”

    Bongo Kristo akoloba

    na bampate:

    “Bózwa mabele mpe bomoi ya seko.”

    (MONDIMO)

    “Soki obɔndisi bandeko na nga’,

    Yebá obɔndisi nde ngai mpenza.

    Kosunga bango nde mpe kosunga nga’.

    Opesi bango nde opesi nga’.

    Osaleli bango nd’osaleli nga’.”