Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 33

Bwakelá Yehova mokumba na yo

Bwakelá Yehova mokumba na yo

(Nzembo 55)

  1. 1. Yehova Yah, ‘Yoká ngai.’

    Wapi yo, Nzambe na nga’?

    Naz’otungisama mpenza;

    Yah, sungá nabanga te.

    (MONDIMO)

    Mokumba n’o, bwakelá Yah;

    Ye nde akosunga yo.

    Akobatela yo seko.

    Akosundola yo te.

  2. 2. Nazala ata lokola

    Ndɛkɛ napumbwa na nga’,

    Mpo nakima bat’oyo

    baz’olukela nga’ liwa.

    (MONDIMO)

    Mokumba n’o, bwakelá Yah;

    Ye nde akosunga yo.

    Akobatela yo seko.

    Akosundola yo te.

  3. 3. Yah abɔndisaka biso,

    Motem’ezwaka kimya.

    Mokumba, kilo ekiti.

    Ye boboto nsuka te.

    (MONDIMO)

    Mokumba n’o, bwakelá Yah;

    Ye nde akosunga yo.

    Akobatela yo seko.

    Akosundola yo te.

(Talá mpe Nz. 22:5; 31:1-24.)