Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 36

Batelá motema na yo

Batelá motema na yo

(Masese 4:23)

  1. 1. Batelá mpenza motema;

    Okozwa lobiko.

    Nzamb’atángaka motema,

    Bomoto ya kati.

    Motem’ekoki kokosa

    Mpe kopɛngwisa yo.

    Kasi soki’oteyi yango,

    Okotosa Nkolo.

  2. 2. Bongisá motema na yo,

    Mpo obondela Yah.

    Pesá matɔndi na nyonso

    Az’osalela yo.

    Oyo Yah ateyi biso,

    Tosá na esengo.

    Kómisá motema sembo,

    Sepelisá Nkolo.

  3. 3. Na motema n’o, longolá

    Makanisi mabe.

    Tiká motem’esukwama

    Na Lilob’a Nzambe.

    Bato ya motema sembo,

    Nzamb’alingi bango.

    Sambelá ye mpo na seko,

    Ye Moninga na yo.