Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 40

Nzambe na yo nani?

Nzambe na yo nani?

(Baroma 14:8)

  1. 1. Nani nzambe na yo?

    Nani nde nkolo na yo?

    Eza’ oy’ofukamelaka.

    Ye nzambe oz’osalela.

    Banzambe mibale,

    Ekosimba kutu te.

    Motema na yo ekokabwana;

    Poná kaka moko nde.

  2. 2. Nani nzambe na yo?

    Nani nde nkolo na yo?

    Kaka moko nde Nzamb’a solo,

    Yo moko poná oy’a yo.

    Eza’ Kaisala nde?

    Y’olingi mpenza nde ye?

    To olingi nde Nzambe ya solo

    Mpe kotosa ye seko?

  3. 3. Nani nzambe na nga’?

    Nga’ naponi Yehova.

    Nakotosa ye, Tata na nga’;

    Mpe ndai nakokokisa.

    Mpo asombaki nga’;

    Namipesi’epai na ye.

    Bomoi na nga’ nyonso, napesi ye.

    Nakokumisa se ye.