Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 45

Komanyola ya motema na ngai

Komanyola ya motema na ngai

(Nzembo 19:14)

  1. 1. Komanyola ya motema,

    Makambo nakanisaka​—

    Esepelisa yo, Nkolo,

    Esunga nga’ natosa yo.

    Ntango mitungis’ezwi nga’,

    Mpe ezangisi nga’ mpɔngi;

    Yah, nakanisa kaka yo,

    Mpe makamb’oyo ya sembo.

  2. 2. Makambo nyonso ya pɛto,

    Ya malamu mpe ya solo,

    Motem’ekanisa yango,

    Mpo nazwa kimya ya solo.

    Makanisi n’o kitoko!

    Ebele koleka zɛlo.

    Tiká namanyola yango,

    Mpe nakanisa se yango.