Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 48

Tótambola na Yehova mokolo na mokolo

Tótambola na Yehova mokolo na mokolo

(Mika 6:8)

  1. 1. Ntɔngɔ, mpokwa, butu, moi,

    Tótambola kaka na Nzambe.

    Boboto na ye monene

    Na bato baz’otambola n’e!

    Na bolingo n’e apesi

    Biso lobɔkɔ na ye.

    Yango tomipesi na ye;

    Tokosalela kaka ye.

  2. 2. Lokola nsuk’ebɛlɛmi,

    Nkanda ya Satana engali;

    Aza’ kotɛmɛla biso

    Mpo tóbanga, mpe tótika Yah.

    Kasi Nzamb’az’obatela;

    Tózala pene na ye,

    Mpo tósalela ye seko.

    Tólinga ye, tópɛngwa te.

  3. 3. Mpo tóbunga mpe nzela te,

    Yah apesi biso’elimo n’e,

    Apesi mpe libondeli,

    Lisangá mpe Liloba na ye.

    Tótambola na Yehova,

    Tokosala mabe te.

    Akosunga mpo tózala

    Sembo, tótosa kaka ye.