LOYEMBO 50
Libondeli na ngai ya komipesa
-
1. Zwá n’o motema na nga’
Elula bwanya na yo.
Zwá mongongo na nga’ koo,
Eyembaka mpo na yo.
-
2. Zwá n’o makolo na nga’
Ná mabɔkɔ’etosa yo.
Mbongo, wolo, zwá na yo.
Nakabeli yo, Nkolo.
-
3. Zwá n’o mpe bomoi na nga’,
Esal’oy’elingi yo.
Zwá mobimba na nga’ koo,
Nasepelisaka yo.
(Talá mpe Nz. 40:8; Yoa. 8:29; 2 Ko. 10:5.)