Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 59

Sanzolá Yah elongo na ngai

Sanzolá Yah elongo na ngai

(Nzembo 146:2)

  1. 1. Sanzolá Yah;

    Yembelá ye!

    Ye nd’apesi mpema, bomoi, bilei.

    Butu ná moi,

    Pambolá ye,

    Kumisá nguya mpe bolingo n’e.

    Yebisá basusu nkombo na ye.

  2. 2. Sanzolá Yah;

    Ye Mosungi.

    Obondeli ye, osɛngi, ozwi.

    Nguya na ye,

    Lobɔkɔ n’e

    Esalisaka oyo alɛmbi.

    Sanzolá nkombo mpe nguya na ye.

  3. 3. Sanzolá Yah;

    Aza’ sembo.

    Ye Mobɔndisi’akotika yo te.

    Soki’ozoki,

    Asalisi.

    Tokopambwama na Bokonzi n’e.

    N’esengo, yaká tósanzola ye!