Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 61

Batatoli, bókende liboso!

Batatoli, bókende liboso!

(Luka 16:16)

  1. 1. Mpiko, molende, na ntango ya nsuka,

    Batatoli bazali kopanza nsango.

    Satan’az’obundisa bango.

    Akokoka te, Nzamb’aza’ na bango.

    (MONDIMO)

    Batatoli bókende kaka liboso!

    Bósepela mpo boz’osalela Nkolo!

    Bópanza nsango: Paradiso’elingi’eya;

    Ekoya na mapamboli beboo.

  2. 2. Bóluka te bisengo’a mokili’oyo;

    Bókosama te na bakonzi na yango.

    Tóboya mbindo biso nyonso,

    Mpo tóbatela bosembo na biso.

    (MONDIMO)

    Batatoli bókende kaka liboso!

    Bósepela mpo boz’osalela Nkolo!

    Bópanza nsango: Paradiso’elingi’eya;

    Ekoya na mapamboli beboo.

  3. 3. Mokili’ez’osɛka Yehova Nzambe;

    Babangaka te kotyola nkombo na ye.

    Nde biso tósantisa yango,

    Tósakol’ango na bikólo nyonso.

    (MONDIMO)

    Batatoli bókende kaka liboso!

    Bósepela mpo boz’osalela Nkolo!

    Bópanza nsango: Paradiso’elingi’eya;

    Ekoya na mapamboli beboo.