Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 63

Tozali Batatoli ya Yehova!

Tozali Batatoli ya Yehova!

(Yisaya 43:10-12)

  1. 1. Bato baboyi Nzambe,

    baponi bikeko nde.

    Yah, Nzambe ya solo,

    Ntemb’ezali te.

    Banzambe ya lokuta

    Bakoki koyeba te

    Lobi makambo nini’ekoya,

    Batatoli na bango mpe.

    (MONDIMO)

    Biso Batatoli’a Yah,

    na mpiko tolobaka.

    Mpo ya biso Nzambe ayebi

    nini ekoya lobi.

  2. 2. Nkombo ya Nzambe, biso

    nde toz’otatol’ango.

    Bokonzi na ye mpe,

    Kaka biso nde.

    Toz’osunga bato mpo

    Bámona nzel’a solo.

    Bátya mpe mingongo na bango,

    Tóyembela Nzamb’elongo.

    (MONDIMO)

    Biso Batatoli’a Yah,

    na mpiko tolobaka.

    Mpo ya biso Nzambe ayebi

    nini ekoya lobi.

  3. 3. Kotatol’elongoli

    nkombo ya Nzambe nsɔni.

    Ekebisi bato

    Baboyi Nzambe.

    Oyo atiki mabe,

    Nzamb’akolimbisa ye.

    Tómipesa na Yah, tokozwa

    Esengo mpe bomoi seko.

    (MONDIMO)

    Biso Batatoli’a Yah,

    na mpiko tolobaka.

    Mpo ya biso Nzambe ayebi

    nini ekoya lobi.