Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 71

Tozali limpinga ya Yehova!

Tozali limpinga ya Yehova!

(Yoele 2:7)

  1. 1. Limpinga ya Yehova,

    Eza’ nde biso.

    Mokonzi eza’ Kristo,

    Monguna, Zabolo.

    At’atɛmɛli biso,

    Tokotika te,

    Tokoteya kaka,

    Tokobanga te.

    (MONDIMO)

    Limping’a Yah nde biso;

    Kristo liboso.

    Toteyi n’esengo:

    “Yah’z’oyangela.”

  2. 2. Biso toz’osalela

    Yehova Nzambe,

    Bampate na y’ebungi,

    Toz’olukela ye.

    Ntango tomoni bango,

    Toleisi bango;

    Tobengi bango mpe

    Na Ndako’a Nkolo.

    (MONDIMO)

    Limping’a Yah nde biso;

    Kristo liboso.

    Toteyi n’esengo:

    “Yah’z’oyangela.”

  3. 3. Limpinga ya Yehova,

    Eza’ nde biso,

    Toz’otosa nde Kristo,

    Tobongami solo.

    Tózala ekɛngɛ nde,

    Mpo tókwea te.

    Tótikala sembo,

    Ata nini’eyei.

    (MONDIMO)

    Limping’a Yah nde biso;

    Kristo liboso.

    Toteyi n’esengo:

    “Yah’z’oyangela.”