Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 81

Bomoi ya mobongisi-nzela

Bomoi ya mobongisi-nzela

(Mosakoli 11:6)

  1. 1. Mokolo ebandi, talá moi ebimi.

    Nalamuki,

    namibongisi, nsima nabondeli.

    N’esengo, nabimi mpo na kosakola.

    Basusu bayoki,

    basusu baboyi, nakobi.

    (MONDIMO)

    Nde bomoi naponi;

    Mpo na yo Yehova.

    Nakosala nyons’osɛngi nga’.

    Naz’okoba kaka,

    Ata moi to mbula.

    Mpo nalingi yo mingi mpenza, Yehova.

  2. 2. Mokolo esili, talá moi elali.

    Nazongi, nalɛmbi,

    kasi n’esengo, nabondeli.

    Mosala nalingá na motema moko.

    Matɔndi Yehova,

    mpo na mapamboli opesi.

    (MONDIMO)

    Nde bomoi naponi;

    Mpo na yo Yehova.

    Nakosala nyons’osɛngi nga’.

    Naz’okoba kaka,

    Ata moi to mbula.

    Mpo nalingi yo mingi mpenza, Yehova.