LOYEMBO 84
Tómipesa
-
1. Nzamb’ayebi mposa na nga’
Mpo nakóma na esengo.
Apesi misala beboo,
Nakoki kosalela ye.
(MONDIMO)
Bolingo, molende
ekotinda nga’
Nandima kokende
esika mpos’eza’ mingi.
-
2. Bisik’oyo mposa eza’,
Tokokende kosalisa.
Bolingo nde ekotinda
Mpo tósunga mpe baninga.
(MONDIMO)
Bolingo, molende
ekotinda nga’
Nandima kokende
esika mpos’eza’ mingi.
-
3. Toza’ kotongela Nkolo,
Na bamboka mpe bingumba.
Toz’oyekola minɔkɔ
Mpo tóteya moto nyonso.
(MONDIMO)
Bolingo, molende
ekotinda nga’
Nandima kokende
esika mpos’eza’ mingi.
(Talá mpe Yoa. 4:35; Mis. 2:8; Rom. 10:14.)