Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 87

Yaká kozwa makasi!

Yaká kozwa makasi!

(Baebre 10:24, 25)

  1. 1. Mokili toza’ ekɔti mobulu;

    Bayebi nzel’a Nzambe te.

    Yango, tolingi Yehova ye moko

    amonisa biso nzela.

    Na makita toza’ kozwa makasi

    Mpe Nzamb’az’oteya biso:

    Kondima mpe bizaleli malamu,

    Kokende kaka liboso.

    Makambo Yehova asɛngi biso,

    Tokosala kaka yango.

    Soki toz’olanda makita nyonso,

    Tokokola na elimo.

  2. 2. Yehova ayebi biso malamu;

    Tóboya toli na ye te.

    Moto ya mayel’akosala nyonso

    azangisa makita te.

    Kuna nde mibali, bato y’elimo,

    Bateyaka biso solo.

    Toyebaka mpe toza’ na bandeko,

    Libota ya bato’a Nzambe.

    Awa toza’ kozela paradiso,

    Tókangama na bandeko.

    Mpo tókóma na bwanya ya likoló,

    Tózangisa makita te.