Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 90

Tólendisanaka

Tólendisanaka

(Baebre 10:24, 25)

  1. 1. Wana toza’ kolendisana

    Mpo na kotikala sembo,

    Bolingo mpenza ekolaka;

    Boyokani mpe bondeko.

    Bolingo ya bato ya Nzambe

    Elendisaka nga’ ná yo.

    Lisangá eza’ ekimelo,

    Yango nde ndako na biso.

  2. 2. Na mpasi, maloba kitoko

    Elɛngi, mai ya mpiɔ!

    Tokoyoka maloba yango

    Epa’ bandeko ya sembo.

    Esengo kosala elongo,

    Toza’ ban’a tata moko!

    Ebongi tósalisanaka;

    Mpasi na yo, mpasi na nga’.

  3. 3. Mokolo’a nkanda ya Yehova,

    Yango wana eza’ koya.

    Ebongi tóyaka makita,

    Mpo tólongwa te na nzela.

    Biso nyonso, liboke moko,

    Tokosalela Yah seko.

    Bandeko, tólendisanaka

    Mpo tóbatela bosembo.