Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 97

Moto akobika nde na Liloba ya Nzambe

Moto akobika nde na Liloba ya Nzambe

(Matai 4:4)

  1. 1. Moto akobika nde na

    Liloba ya Nzambe.

    Tóluka te kaka limpa;

    Kasi Liloba mpe.

    Lelo, ez’opesa kimya,

    Lobi, bomoi nde.

    (MONDIMO)

    Moto akobika nde na

    Liloba ya Nzambe.

    Kasi te kaka na limpa;

    Lilob’a Nzambe nde.

  2. 2. Masolo oy’eza’ kuna,

    Ya basali’a Nkolo.

    Bosembo, kondima, mpiko,

    Misala na bango

    Eza’ kolendisa biso,

    Ntango totángi’ango.

    (MONDIMO)

    Moto akobika nde na

    Liloba ya Nzambe.

    Kasi te kaka na limpa;

    Lilob’a Nzambe nde.

  3. 3. Tótángak’ango butu moi,

    Tokoyoka kimya.

    Soki mpe mikakatano,

    Ekopesa bwanya.

    Makambo’ez’oteya biso,

    Tótosaka yango.

    (MONDIMO)

    Moto akobika nde na

    Liloba ya Nzambe.

    Kasi te kaka na limpa;

    Lilob’a Nzambe nde.

(Talá mpe Yos. 1:8; Rom. 15:4.)