Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 99

Tozali na bandeko ebele

Tozali na bandeko ebele

(Emoniseli 7:9, 10)

  1. 1. Libot’a bandeko beboo,

    Mibali mpe basi,

    Batatoli ya Nkolo,

    Bandeko ya sembo.

    Tozali mingi beboo,

    Tozali ebele,

    Touti na bikólo nyonso,

    Tokumisi Nzambe.

  2. 2. Libot’a bandeko beboo,

    Toz’opanza nsango

    ‘Ya makambo kitoko,’

    Mingi balingi’ango.

    Ata mikakatano,

    Na mosala yango,

    Yesu az’obɔndisa biso;

    Toz’opema solo.

  3. 3. Libot’a bandeko beboo,

    Na tempelo’a Nkolo,

    Toz’osala butu moi,

    Yah’z’otala biso.

    Tozali mingi beboo,

    Toz’omema nsango,

    Tozali kosala na Nzambe,

    Na nse, ye likoló.