Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 106

Tókolisa bolingo

Tókolisa bolingo

(1 Bakorinti 13:1-8)

  1. 1. Tobondeli Yehova Nzambe,

    Mpo tólanda bizaleli n’e.

    Kasi na nyonso bolingo nde

    Ezaleli’eleki monene.

    Ata tozwi mayel’ebele,

    Tozangi bolingo, ntina te.

    Tósɛnga Yehova bolingo,

    Ya mbɛbu te, ya solosolo.

  2. 2. Bolingo’etunaka bandeko:

    ‘Yay’olingi nasalisa yo?’

    Bolingo’eyinaka moto te,

    Yango’ekangaka motema nde.

    Ezongisaka mpe mabe te,

    Elimbisaka neti Nzambe.

    Ata makambo eyei mabe,

    Bolingo’esilaka kaka te.