Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 107

Ndakisa ya bolingo ya Nzambe

Ndakisa ya bolingo ya Nzambe

(1 Yoane 4:19)

  1. 1. Bolingo’a Nzambe ez’oteya biso

    Bolingo, bolingo.

    Bolamu na ye elekeli biso,

    Tólanda mpe lokolo n’e.

    Azwi Mwana n’e, liso na ye moko,

    Mpe apesi ye mbeka mpo na biso.

    Mpo ngai ná yo tózwa nde lobiko.

    Boling’oyo, nsuk’a bolingo!

  2. 2. Soki tolandi Nzambe tokolinga

    Bandeko na solo.

    Tokolɛngɛla mpenza bango nyonso,

    Ná ya kala, ná ya sika.

    Moto’akoki te kolinga se Nzambe,

    Kasi’az’oyina moto lokola ye.

    Ndeko’azokisi biso, tólimbisa

    Na bolingo, tóbosan’ango.

  3. 3. Bolingo yango epesi bomoko,

    Bondeko, bondeko.

    Tata na biso alobi: “Bóy’awa;

    Bólingana, bósungana.”

    Yak’osepela na bolingo yango;

    Liloba na ye ebongisa biso.

    Bandeko bakokundwela biso’ete:

    Yah, bolingo. Nzambe, bolingo.