Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 111

Ntina ya esengo na biso

Ntina ya esengo na biso

(Matai 5:12)

  1. 1. Tozali na makambo mingi

    Ez’osepelisa biso.

    Biloko kitoko’a bikólo

    Ez’oya epai ya Nkolo.

    Lisusu toza’ na esengo

    Mpo na mateya toz’ozwa;

    Euti na Lilob’a Nzambe,

    Eza’ kopesa kondima.

    Bisengo’ango ekosila te,

    Mɔtɔ ekobomama te.

    Toza’ na mpasi, toboyi te;

    Kasi Yah’z’opesa mpiko.

    (MONDIMO)

    Yehova Nzambe esengo,

    Misala na ye esengo.

    Mayele na ye ezangá nsuka,

    Nguya na ye nde sukisá!

  2. 2. Ezali esengo komona

    Likoló, nse, mai minene.

    Tokweaka mayanga ntango

    Toz’otala misala n’e.

    Esengo mosusu yang’oyo:

    Bokonzi’ebotami solo.

    Mpe ekomema paradiso,

    Toza’ koyebisa bato.

    Esengo’a seko ebɛlɛmi,

    Neti kotana ya ntɔngɔ.

    Likoló mpe mabel’a sika

    Ekopes’esengo seko.

    (MONDIMO)

    Yehova Nzambe esengo,

    Misala na ye esengo.

    Mayele na ye ezangá nsuka,

    Nguya na ye nde sukisá!