Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 117

Motema malamu

Motema malamu

(2 Ntango 6:41)

  1. 1. Yehova, oza’ malamu,

    Oz’opambola biso!

    Mosantu, yo Nzamb’a sembo,

    Nkolo malamu nde yo.

    Olimbisi biso bato

    Na mawa na yo, Nkolo!

    Tókende lisusu wapi?

    Tokosambela se yo.

  2. 2. Bato na yo, ndenge moko,

    Baza’ mpenza boboto;

    N’etamboli ya kitoko,

    Baza’ koteya bato.

    Na bamboka mingi lelo,

    Bato bayambi solo.

    Pes’elimo mpo mabɔkɔ

    oyo esunga bato.

  3. 3. Tokosala mpe malamu

    Na bandeko na biso.

    Bango nde tokosalisa

    Koleka bato nyonso.

    Pambolá mpe pes’elimo

    Mpo tósala bolamu

    Na lisangá mpe libota,

    Bisika nyonso toza’.