Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 119

Tosengeli kozala na kondima

Tosengeli kozala na kondima

(Baebre 10:38, 39)

  1. 1. Nzambe mbala mingi alobaki

    Na nzel’a basakoli n’e.

    Kasi lelo alobeli biso

    Na nzel’a Mwana na ye.

    (MONDIMO)

    Tozali nde na kondima?

    Eza’ ya makasi mpenza?

    Ya misala, ya mbɛbu te?

    Kondima nd’ekobikisa biso.

  2. 2. N’esengo toza’ kotosa Yesu,

    Koteya Bokonzi na ye.

    Elaka ya Nzambe, tobombi te;

    Toz’obanga bato te.

    (MONDIMO)

    Tozali nde na kondima?

    Eza’ ya makasi mpenza?

    Ya misala, ya mbɛbu te?

    Kondima nd’ekobikisa biso.

  3. 3. Kondima nde longo mpo na biso;

    Mai’ekomema biso te.

    Ata soki nini, Yah azali;

    Lobiko mp’ebɛlɛmi.

    (MONDIMO)

    Tozali nde na kondima?

    Eza’ ya makasi mpenza?

    Ya misala, ya mbɛbu te?

    Kondima nd’ekobikisa biso.