LOYEMBO 122
Tópikama makasi, tóninganaka te!
-
1. Bato basili mayele lelo.
Baz’obang’oy’ez’oya liboso.
Kasi biso tokoningana te,
Tókangama na Nzambe.
(MONDIMO)
Ɛɛ, tópikama mpenza;
Mokili, tókim’ango;
Tópikama bongo,
Tii bomoi ya seko.
-
2. Satan’atye mitambo ebele.
Tókeba makanisi’ebeba te.
Tóyin’eloko nyonso ya mabe,
Akokweisa biso te.
(MONDIMO)
Ɛɛ, tópikama mpenza;
Mokili, tókim’ango;
Tópikama bongo,
Tii bomoi ya seko.
-
3. Sambelá Yah na motema moko.
Yo mpe bundá na mosal’a Nkolo.
Sakolá Bokonzi, kotika te.
Nsuk’eza’ mosika te.
(MONDIMO)
Ɛɛ, tópikama mpenza;
Mokili, tókim’ango;
Tópikama bongo,
Tii bomoi ya seko.
(Talá mpe Luka 21:9; 1 Pe. 4:7.)