Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 125

“Esengo na bato ya motema mawa!”

“Esengo na bato ya motema mawa!”

(Matai 5:7)

  1. 1. Nzambe, motema mawa nde,

    Ya Ye ya kotindika te.

    Alingá kosunga bato,

    Yango toz’ozwa biloko.

    Mot’oyo atiki mabe,

    Asɛng’akolimbisa ye.

    Ayebi toza’ mabele,

    Akokanga motema te.

  2. 2. Soki’osali lisumu mpe

    Oz’oluk’alimbisa yo,

    Landá libondeli’a Kristo,

    Mawa, Nzamb’ayokela yo:

    “Tata, limbisá nga’ nyongo,

    Ndenge naz’olimbisa koo.”

    Wana nd’okoyoka kimya,

    Motem’ekokita mpenza.

  3. 3. Soki tokabeli bato,

    Tósal’ango na bolingo.

    Toboi bákumisa biso,

    Likabo nd’epes’esengo.

    Yehov’az’omona yango,

    Ye nde akofuta biso.

    Tóyoka bato mawa mpe

    Tokolingama na Nzambe.

(Talá mpe Mat. 6:2-4, 12-14.)