LOYEMBO 128
Tóyika mpiko tii na nsuka
-
1. Kanisá bilak’a Nzambe,
Epesa yo mpiko.
Makambo n’e bateyá yo
Ezali mpenza solo.
Kangamá na matey’ango,
Yebá nsuk’eza’ koya.
Ata mpasi, zalá sembo;
Mpasi’ekopɛtola yo.
-
2. Bolingo n’o ya liboso,
Kobungis’ango te.
Atako mpasi ezwi yo,
Kangá kaka motema.
At’omekami makasi,
Kosila mayele te.
Yehova akotɛlɛma
Pene mpo asunga yo.
-
3. Bato baz’oyika mpiko,
Bango bakobika.
Nzambe akokoma bango
Na buku n’e ya bomoi.
Zwá mokano: yiká mpiko;
Kolɛmba te na nzela.
Yehov’akozala na yo;
Esengo n’o nsuka te.
(Talá mpe Ebr. 6:19; Yak. 1:4; 2 Pe. 3:12; Em. 2:4.)