Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 135

Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’

Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’

(Masese 27:11)

  1. 1. Elenge, motema na yo

    pesá na nga’.

    Olakisa

    mot’oy’az’otumola nga’

    Ete eza’ yo moko

    nde omipesi;

    Mokili’emona ete

    nga’ nde oponi.

    (MONDIMO)

    Mwana na nga’, zalá mayele;

    Sepelisá nde nga’, ye te.

    Lakis’osalelaka nga’ nde

    Na bolingo na yo, yo mei.

  2. 2. Omipesa epai na nga’

    na esengo,

    Soki okwei,

    nga’ nakotɛlɛmisa yo.

    Ata soki baboyi yo,

    babwaki yo,

    Kobanga te, nga’ naza’

    kolɛngɛla yo.

    (MONDIMO)

    Mwana na nga’, zalá mayele;

    Sepelisá nde nga’, ye te.

    Lakis’osalelaka nga’ nde

    Na bolingo na yo, yo mei.