Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 136

Yehova akopesa mbano

Yehova akopesa mbano

(Ruta 2:12)

  1. 1. Yehov’azali sembo mpe ayebi

    Basaleli n’e ya sembo.

    Ayebi mpe ndenge bakelelaka

    Mpo na milende na bango.

    Soki otiká nyonso mpe libota,

    Nzamb’ayebi yango mpenza.

    Lelo’apesi yo lisang’a bandeko

    Mpe lobi bomoi ya seko.

    (MONDIMO)

    Tiká Yehova akanisa yo.

    Apes’o nsuka mpenza ya mbano.

    Mapapu na y’ebatela yo.

    Yehov’aza’ sembo; akosal’ango.

  2. 2. Omonaka neti obotamaki

    Se mpo na komona mpasi?

    To mpe ozali nde komona neti

    Osuki, mayel’esili?

    Kasi Nzambe, Moyoki-mabondeli,

    Ayebi bamposa na yo.

    Na nzel’elimo, Biblia, bandeko,

    Okomon’akosunga yo.

    (MONDIMO)

    Tiká Yehova akanisa yo.

    Apes’o nsuka mpenza ya mbano.

    Mapapu na y’ebatela yo.

    Yehov’aza’ sembo; akosal’ango.