Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 139

Omimona na mokili ya sika

Omimona na mokili ya sika

(Emoniseli 21:1-5)

  1. 1. Omimona, moná mpe nga’;

    Tozali na mokili ya sika.

    Moná ndenge okoyoka,

    Ntango okofanda na kimya.

    Bato mabe bazali te;

    Bokonzi ya Nzambe nsuka te.

    Mabele oy’a sika ekobanda,

    Tokoyembela Nzambe

    mpe tokoloba:

    (MONDIMO)

    “Yehova oza’ malamu mpenza.

    Osali biloko nyons’a sika.

    Toz’oyemba na motema ya esengo;

    Tokopesa yo nde lokumu mpe nkembo.”

  2. 2. Omimona, moná mpe nga’;

    Talá mokili yango ya sika.

    Okoyoka kolela te.

    Mpasi mpe kobanga elimwe.

    Asemboli hema na ye.

    Akokisi maloba na ye.

    Alamwisi bato oyo bakufá;

    Bango ná biso tokoyemba

    mpo na Yah:

    (MONDIMO)

    “Yehova oza’ malamu mpenza.

    Osali biloko nyons’a sika.

    Toz’oyemba na motema ya esengo;

    Tokopesa yo nde lokumu mpe nkembo.”