Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 141

Bomoi ezali likamwisi

Bomoi ezali likamwisi

(Nzembo 36:9)

  1. 1. Mwana ya sika, Litang’a mbula,

    Mbum’oy’eza’ kobota, Pole ya moi​—

    Eza’ makabo; Misal’a Nzambe.

    Mpo na makamwisi na ye nde tozali.

    (MONDIMO)

    Bomoi likabo mpenza ya ntalo,

    Ez’otinda biso nyonso tólinga Nzambe.

    At’osali nini, okosomb’ango te.

    Eza’ nde likabo​—Eza’ likamwisi.

  2. 2. Basusu, lokola mwasi’a Yobo,

    Balobi: ‘Fingá Nzambe, kufá na yo.’

    Tokolanda te; tókumisa ye,

    Toyebi bolamu na ye, tótɔnda ye.

    (MONDIMO)

    Bomoi likabo mpenza ya ntalo,

    Ez’otinda biso nyonso tólinga Nzambe.

    At’osali nini, okosomb’ango te.

    Eza’ nde likabo​—Eza’ likamwisi.