Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 142

Tósimba makasi elikya na biso

Tósimba makasi elikya na biso

(Baebre 6:18, 19)

  1. 1. Bato baz’oyengayenga na molili.

    Basali nyonso kasi’ez’osimba te.

    Mawa mpenza mpo na bato’a masumu;

    Nani’akobikisa mosusu?

    (MONDIMO)

    Yembá, sepelá, Bokonzi eyei!

    Boyangeli’a Yesu ez’oya na nse.

    Kobanga mpe mpasi’ekozala te;

    Elikya oyo, longo mpo na biso.

  2. 2. Mokolo ya Nzambe ekómi pembeni!

    Eza’ koya mpo kolela esila.

    Bikelamu nyonso’elongwa na mpasi.

    Yaká tóyembela Yehova.

    (MONDIMO)

    Yembá, sepelá, Bokonzi eyei!

    Boyangeli’a Yesu ez’oya na nse.

    Kobanga mpe mpasi’ekozala te;

    Elikya oyo, longo mpo na biso.