Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 147

Nzambe alaki biso bomoi ya seko

Nzambe alaki biso bomoi ya seko

(Nzembo 37:29)

  1. 1. Tokokufa lisusu te,

    Wana nd’elak’a Nzambe.

    Bato’a komikitisa nde

    Bakozwa mabele.

    (MONDIMO)

    Liloba ya Nzambe,

    Yango’ekosaka te.

    Bomoi ya seko’eza’.

    Bund’ozwa yango.

  2. 2. Soki mokili mobimba

    Ekómi Paradiso,

    Kimya, bonsomi ekɔti;

    Yehova, Mokonzi.

    (MONDIMO)

    Liloba ya Nzambe,

    Yango’ekosaka te.

    Bomoi ya seko’eza’.

    Bund’ozwa yango.

  3. 3. Etikali moke mpenza,

    Bakufi bakozonga.

    Kolela mpe maw’elongwe,

    Nde bolingo’a Nzambe!

    (MONDIMO)

    Liloba ya Nzambe,

    Yango’ekosaka te.

    Bomoi ya seko’eza’.

    Bund’ozwa yango.