Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 3

Kotuna mituna

Kotuna mituna

Matai 16:13-16

NA MOKUSE: Tuná mituna oyo ebongi mpo na kopesa bato mposa ya koyoka yo mpe ya kolanda yo tii na nsuka, mpo na kosalisa bato bákanisa, to mpo na konyata makanisi ya ntina.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Pesá bato mposa ya koyoka mpe ya kolanda tii na nsuka. Tuná mituna oyo ekotinda moto apesa eyano na motema na ye to akóma na mposa ya koyeba eyano.

  • Salisá bato bátya makanisi na likambo oyo ozali kolobela. Tuná mwa mituna oyo ekotinda bato báluka biyano oyo ebongi, na nsima limbolá makambo na ndenge oyo ekosalisa bango bázwa biyano wana.

  • Bimisá makanisi ya ntina. Tuná motuna moko oyo ekolamwisa makanisi ya bato ntango olingi kolobela likanisi moko ya ntina. Tuná mituna ya bozongeli nsima ya kolobela likanisi moko ya ntina to mpo na kosukisa lisolo na yo.