Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 5

Kotánga malamu

Kotánga malamu

1 Timote 4:13

NA MOKUSE: Tángá na mongongo makasi kaka maloba oyo ekomami.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Mibongisá malamu. Luká koyeba mpo na nini bakomi maloba yango. Yekolá kotánga maloba mingi mbala moko, na esika ya kotánga liloba mokomoko. Salá makasi obakisa te, opumbwa te, to obongola te maloba mosusu. Tyá miso na bilembo nyonso oyo elakisaka esika ya kopema, ya kobongola mongongo, mpe bongo na bongo.

  • Tángá liloba mokomoko na ndenge ebongi. Soki oyebi te ndenge batángaka liloba moko boye, talá na diksionɛrɛ, yoká ndenge bazali kotánga yango, to tuná moto moko oyo atángaka malamu.

  • Bimisá maloba polele. Lobá malamu, tombolá motó mpe fungolá monɔkɔ malamu. Salá makasi omɛlaka maloba te.