Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 12

Koloba na mɔtɔ mpe komitya na esika ya basusu

Koloba na mɔtɔ mpe komitya na esika ya basusu

1 Batesaloniki 2:7, 8

NA MOKUSE: Bimisá kobanga, to mawa, to esengo, to nkanda, to mayoki mosusu oyo ebongi na ntango ozali koloba, mpe lakisá bato oyo bazali koyoka yo ete ozali komitya na esika na bango.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Kanisá bato oyo bakoyoka yo. Bongisá motema na yo; mpo na yango, kanisá mikakatano oyo bato bazali kokutana na yango. Meká kokanisa ndenge oyo bazali koyoka na mitema.

  • Poná malamu maloba oyo okosalela. Luká kopesa bato oyo bakoyoka yo makasi, kokitisa bango mitema, mpe kolendisa bango. Boyá maloba oyo ekoki koyokana lokola maloba ya kotyola, mpe kokitisa te bato oyo bazali Batatoli te mpe koloba mabe te mpo na makambo oyo bandimaka.

  • Lakisá ete ozali komitya na esika ya bato. Na mongongo ya boboto mpe bajɛstɛ oyo ebongi, lakisá ete ozali komitya na esika ya bato oyo bazali koyoka yo. Salá makasi ofungolaka elongi; sɛkáká mwa moke.