Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 17

Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango

Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango

1 Bakorinti 14:9

NA MOKUSE: Salisá bato oyo bazali koyoka yo bákanga ntina ya makambo oyo ozali koteya.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Yekolá lisolo na yo malamumalamu. Salá makasi okanga mpenza ntina ya lisolo na yo, mpo osala yango na ndenge ya pɛtɛɛ mpe na maloba na yo moko.

  • Salelá bafraze ya mikuse mpe ya pɛtɛɛ. Atako ezali mabe te kosalela bafraze ya milai, ntango olingi kolobela makanisi ya ntina, lobá yango na bafraze ya mikuse mpe ya pɛtɛɛ.

  • Limbolá maloba oyo eyebani te. Kosalela mingi te maloba oyo bato oyo bazali koyoka yo bayebi te. Soki osaleli liloba moko oyo eyebani mingi te, to otángi nkombo ya moto moko oyo Biblia elobeli kasi ayebani mingi te, ezala mpe bamezire to mimeseno ya ntango ya kala, limbolá yango.