Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 18

Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo

Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo

1 Bakorinti 9:19-23

NA MOKUSE: Salisá bato bákanisa mpe bámona ete bayekoli likambo ya malonga.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Talelá makambo oyo bato yango bayebi. Na esika ozongela kaka makambo oyo bayokaka, salisá bango bázwa mwa eloko ya sika na liteya oyo okolobela.

  • Luká makanisi na mikanda mpe manyolá. Soki esengeli, kɔtisá mwa makambo oyo bayoká naino te to makambo oyo euti kosalema mpo na kolimbola makanisi ya ntina. Zwá ntango mpo na kokanisa makambo oyo okoteya mpe ndenge ya koyokanisa makambo yango ná bandakisa oyo okopesa.

  • Salisá bato bámona ndenge oyo mateya yango ekoki kosalisa bango. Limbolá ndenge oyo makanisi ya Biblia ekoki kosalisa bato na bomoi na bango. Lobelá makambo, makanisi, mpe bizaleli oyo ezali mpenza na ntina mpo na bato oyo bakoyoka yo.