Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 19

Kosala makasi mpo na kosimba mitema

Kosala makasi mpo na kosimba mitema

Masese 3:1

NA MOKUSE: Salisá bato bákanga ntina ya makambo oyo bazali koyoka mpe básalela yango.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Salisá bato oyo bazali koyoka yo bámitalela. Tuná mituna oyo ekotinda bato bámitalela mpo na koyeba soki bazali mpenza kokanisa nini na mitema.

  • Lendisá bato báluka kosala malamu. Lendisá bato bámituna mpo na nini basalaka makambo ya malamu. Salisá bato bálinga Yehova, bálinga bazalani na bango mpe bálinga mateya ya Biblia, mpe bolingo yango nde ekotinda bango básala makambo ya malamu. Na esika opamela bango, salisá bango nde bákanisa. Na esika oyokisa bango nsɔni, lisolo na yo elendisa bango mpe etinda bango básala malamu koleka.

  • Salisá bato bámona nde Yehova. Monisá ndenge oyo mateya, mitinda mpe mibeko ya Biblia emonisaka bizaleli ya Nzambe mpe bolingo na ye mpo na biso. Salisá bato oyo bazali koyoka yo bábanga koyokisa Yehova mawa, báluka nde kosepelisa ye.