Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 07

Yehova azalaka ndenge nini?

Yehova azalaka ndenge nini?

Okanisaka ete Yehova Nzambe azalaka ndenge nini? Omonaka ete Nzambe azali monene, azali mosika na yo, mpe okoki kokóma moninga na ye te? To omonaka ete azali kaka nguya moko boye lokola nkake? Yehova azalaka mpenza ndenge nini? Biblia, Liloba ya Nzambe, eyebisi biso bizaleli oyo Yehova azalaka na yango mpe elobi ete akipaka yo.

1. Mpo na nini tokoki komona Nzambe te?

Biblia elobi: “Nzambe azali Elimo.” (Yoane 4:24) Yehova azali na nzoto lokola ya biso bato te. Azali Elimo mpe afandaka na likoló, esika oyo tokoki komona te.

2. Wapi bizaleli mosusu ya Yehova?

Tokoki komona Yehova te, kasi soki toyekoli koyeba ye tokolinga ye, mpe tokomona ete azali moto ya solo oyo azali na bizaleli ya malamu. Biblia elobi: “Yehova alingaka bosembo, mpe akotika te bato na ye ya sembo.” (Nzembo 37:28) Lisusu, Yehova azali na “bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa,” mingimingi epai ya bato oyo bazali konyokwama. (Yakobo 5:11) Biblia elobi ete “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; mpe abikisaka baoyo elimo etutami.” (Nzembo 34:18) Oyebaka ete makambo oyo tosalaka ekoki kosala ete Yehova ayoka esengo to mawa? Moto oyo asalaka makambo ya mabe asepelisaka Yehova te mpe apesaka ye mpasi. (Nzembo 78:40, 41) Kasi moto oyo asalaka makambo ya malamu asepelisaka ye.​—Tángá Masese 27:11.

3. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka biso?

Ezaleli ya Yehova oyo eleki bizaleli na ye mosusu nyonso ezali bolingo. Kutu, Biblia elobi ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yehova amonisi bolingo na ye na kati ya Biblia mpe na biloko oyo asalá. (Tángá Misala 14:17.) Na ndakisa, tólobela ndenge oyo asalá biso. Yehova apesá biso likoki ya komona balangi ya kitoko, koyoka miziki ya kitoko, mpe koyoka elɛngi ya bilei ya kitoko. Alingaka ete tósepela mpenza na bomoi.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba soki Yehova asalelaka nini mpo na kosala biloko to makambo ya kokamwa. Mpe na nsima, talá ndenge Yehova amoniselaka biso bizaleli na ye ya malamu mpenza.

4. Elimo santu ezali nguya oyo Nzambe asalaka na yango mosala

Kaka ndenge tosalelaka mabɔkɔ mpo na kosala mosala, Yehova mpe asalelaka elimo santu na ye mpo na kosala makambo. Biblia emonisi ete elimo santu ezali moto te, kasi ezali nguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kosala makambo. Tángá Luka 11:13 mpe Misala 2:17, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Nzambe ‘akosopa’ elimo santu na ye epai ya bato oyo bazali kosɛnga yango. Okanisi nini: Elimo santu ezali moto, to nguya oyo Nzambe asalelaka na yango mosala? Mpo na nini olobi bongo?

Yehova asalelaka elimo santu na ye mpo na kosala makambo ya kokamwa. Tángá Nzembo 33:6 mpe 2 Petro 1:20, 21, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kosala nini?

5. Yehova azali na bizaleli ya malamu

Atako Moize azalaki mosaleli ya sembo ya Nzambe, alingaki koyeba Nzambe oyo akelaki ye malamumalamu. Yango wana Moize alobaki na Yehova boye: “Salá ete nayeba banzela na yo, mpo nayeba yo.” (Kobima 33:13) Mpe Yehova ayebisaki Moize mwa ndambo ya bizaleli oyo azali na yango. Tángá Kobima 34:4-6, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Bizaleli nini Yehova ayebisaki Moize?

  • Bizaleli nini ya Yehova esepelisi yo mpenza?

6. Yehova akipaka bato

Yehova ayokaki ndenge nini ntango bana ya Yisraele bazalaki konyokwama na boombo na Ezipito? Yoká AUDIO ya Kobima 3:1-10, to tángá yango. Mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Lisolo oyo eteyi yo nini na oyo etali ndenge Yehova ayokaka ntango bato bazali konyokwama?​—Talá vɛrsɛ 7 mpe 8.

  • Okanisi ete Yehova alingaka mpenza kosalisa bato mpe akoki kosala yango? Mpo na nini?

7. Tokoki koyekola bizaleli ya Nzambe na biloko oyo asalá

Biloko oyo Yehova asalá emonisaka bizaleli na ye. Talá VIDEO. Na nsima, tángá Baroma 1:20, mpe yanolá na motuna oyo elandi.

  • Bizaleli nini ya Yehova omonaka na biloko oyo asalá?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nzambe azali moto te, kasi azali nguya oyo ezalaka bisika nyonso.”

  • Okopesa eyano nini?

  • Mpo na nini oyanoli bongo?

NA MOKUSE

Yehova azali Elimo mpe tokoki komona ye te, atondi na bizaleli ya malamu, mingimingi bolingo.

Bozongeli

  • Mpo na nini tokoki komona Yehova te?

  • Elimo santu ezali nini?

  • Wapi bizaleli mosusu ya Yehova?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Yekolá na mozindo bizaleli minene minei ya Yehova.

“Nzambe azali na bizaleli nini?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 1 2019)

Talá makambo oyo emonisi ete Nzambe azalaka bisika nyonso te.

“Nzambe azalaka bisika nyonso?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Talá mpo na nini Biblia ekokanisi elimo santu na lobɔkɔ ya Nzambe.

“Elimo santu ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Moto moko oyo akufá miso azalaki kondima te ete Nzambe akipaka ye. Talá makambo oyo ebongolaki makanisi na ye.

“Sikoyo namoni ete nakoki kosalisa basusu” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2015)