Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 08

Okoki kozala moninga ya Nzambe

Okoki kozala moninga ya Nzambe

Yehova alingi oyeba ye malamumalamu. Mpo na nini? Mpo Yehova ayebi ete soki ozali koluka koyeba malamumalamu bizaleli na ye, ndenge oyo asalelaka bato makambo, mpe oyo alingi mpo na yo, na ntembe te okolinga mpenza kozala moninga na ye. Okoki mpenza kokóma moninga ya Nzambe? (Tángá Nzembo 25:14.) Okoki kosala nini mpo okóma moninga na ye? Biblia epesi eyano na mituna yango mpe emonisi ntina oyo kozala moninga ya Yehova ezali na valɛrɛ mingi koleka.

1. Yehova alingi osala nini?

Biblia elobi: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Yango elakisi nini? Yehova alingi ete okóma moninga na ye. Lokola Nzambe amonanaka te, bato mosusu bakoki kondima te ete bakoki kokóma baninga na ye. Kasi, na kati ya Biblia, Liloba na ye, Yehova amonisi bizaleli na ye oyo ezali kosalisa biso tópusana penepene na ye. Soki tozali kotánga Biblia, tokokóma mpenza baninga ya Yehova atako tomonaka ye te.

2. Mpo na nini Yehova azali moninga malamu koleka?

Yehova alingaka yo mingi koleka moto mosusu nyonso. Alingi ete ozala na esengo mpe obondelaka ye ntango nyonso oyo ozali na mposa ya lisalisi. Okoki ‘kobwakela ye mitungisi na yo nyonso, mpo atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Yehova azali ntango nyonso pene ya kosalisa, kobɔndisa, mpe koyoka baninga na ye.​—Tángá Nzembo 94:18, 19.

3. Yehova alingi baninga na ye básala nini?

Yehova alingaka bato ya ndenge nyonso, “kasi azali moninga ya motema ya bato ya [sembo].” (Masese 3:32) Yehova alingi ete baninga na ye básala makasi ya kotosa makambo oyo alobi ete ezali malamu mpe báboya makambo oyo alobi ete ezali mabe. Bato mosusu bakoki kokanisa ete bakokoka te kosala makambo oyo Yehova alobi ete ezali malamu mpe koboya makambo oyo alobi ete ezali mabe. Atako bongo, Yehova azali na motema mawa. Andimaka moto nyonso oyo alingaka ye mpenza mpe oyo asalaka makasi mpo na kosepelisa ye.​—Nzembo 147:11; Misala 10:34, 35.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo na kokóma moninga ya Yehova, mpe ntina oyo Yehova azali moninga malamu koleka moninga nyonso oyo okoki kozala na ye.

4. Abrahama azalaki moninga ya Yehova

Lisolo ya Abrahama (oyo babengaka mpe Abrama) oyo ezali na Biblia ezali kosalisa biso tóyeba malamu soki kozala moninga ya Nzambe elakisi nini. Tángá lisolo ya Abrahama na Ebandeli 12:1-4. Mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yehova ayebisaki Abrahama asala nini?

  • Yehova alakaki Abrahama nini?

  • Abrahama asalaki nini na makambo oyo Yehova ayebisaki ye?

5. Makambo nini Yehova asɛngaka epai ya baninga na ye?

Mbala mingi, tolingaka ete baninga na biso básala makambo oyo tolingaka.

  • Makambo nini olingaka ete baninga básalela yo?

Tángá 1 Yoane 5:3, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yehova alingi ete baninga na ye básala nini?

Mpo na kotosa Yehova, ekoki kosɛnga ete tóbongola bizaleli na biso mpe makambo mosusu oyo tosalaka na bomoi. Tángá Yisaya 48:17, 18, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini Yehova alingi ete baninga na ye bábongwana?

Moninga ya malamu ayebisaka biso makambo oyo ekoki kobatela biso mpe oyo ekopesa biso bolamu. Yehova mpe asalaka bongo mpo na baninga na ye

6. Yehova asalaka nini mpo na baninga na ye?

Yehova asalisaka baninga na ye bálonga mikakatano. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Ndenge nini Yehova asalisaki mwasi oyo touti kotala na video alonga makanisi mabe mpe kobanga oyo azalaki na yango?

Tángá Yisaya 41:10, 13, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yehova alaki kosala nini mpo na baninga na ye nyonso?

  • Okanisi ete Yehova azali moninga ya malamu? Mpo na nini?

Moninga ya malamu asalisaka yo ntango ozali na mposa ya lisalisi. Yehova mpe akosalisa yo

7. Mpo tózala baninga ya Yehova tosengeli kosololaka na ye mpe koyokaka ye

Bato mibale bakómaka na boninga makasi ntango bazali kosolola mingi. Tángá Nzembo 86:6, 11, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini tokoki koloba na Yehova?

  • Ndenge nini Yehova alobaka na biso?

Tolobaka na Yehova ntango tobondelaka ye; mpe alobaka na biso na nzela ya Biblia

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Ekoki kosalema te okóma moninga ya Nzambe.”

  • Okopesa vɛrsɛ nini oyo emonisi ete tokoki kokóma baninga ya Yehova?

NA MOKUSE

Yehova alingi ete okóma moninga na ye, mpe akosalisa yo opusana penepene na ye.

Bozongeli

  • Ndenge nini Yehova asalisaka baninga na ye?

  • Mpo na nini Yehova asɛngaka baninga na ye bábongwana?

  • Okanisi ete ezali mpenza mpasi kozala moninga ya Yehova? Mpo na nini?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá mpo na nini mwasi moko alobi ete kozala moninga ya Yehova ekómisi bomoi na ye malamu koleka.

“Nazalaki kobanga liwa!” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 1 2017)

Yoká oyo bilenge balobi mpo na boninga na bango ná Yehova.

Osengeli kosala nini mpo ozala moninga ya Nzambe? (1:46)