Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 14

Losambo oyo Nzambe andimaka

Losambo oyo Nzambe andimaka

Na liteya oyo eleki, tomonaki ete Nzambe andimaka mangomba nyonso te. Kasi tokoki kosambela moto oyo akelá biso na ndenge oyo ekosepelisa ye. Andimaka “losambo” to lingomba ya ndenge nini? (Yakobo 1:27) Tótala makambo oyo Biblia eteyaka.

1. Makambo nyonso ya losambo na biso esengeli kouta wapi?

Makambo nyonso ya losambo na biso esengeli kouta na Biblia. Yesu alobaki na Nzambe ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Mangomba mosusu endimaka te mateya mosusu oyo ezali na Liloba ya Nzambe, Biblia. Na esika na yango, bateyaka makanisi mpe mimeseno ya bato. Kasi Yehova asepelaka te na baoyo ‘batyaka mobeko na ye pembeni.’ (Tángá Marko 7:9.) Nzokande, tokosepelisa motema na ye soki makambo nyonso ya losambo na biso euti na Biblia.

2. Ndenge nini tosengeli kosambela Yehova?

Tosengeli kosambela kaka Yehova mpo ye nde akelá biso. (Emoniseli 4:11) Yango elingi koloba, tosengeli kolinga ye mpe kosambela kaka ye, kasi te ekeko moko boye, elilingi moko boye to eloko mosusu.​—Tángá Yisaya 42:8.

Losambo na biso esengeli kozala ‘mosantu mpe oyo Yehova akoki kondima.’ (Baroma 12:1) Yango elingi koloba, tosengeli kotosa mibeko na ye. Na ndakisa, bato oyo balingaka Yehova balingaka mpe batosaka mibeko na ye na likambo etali libala. Basalaka makambo ya mabe te, na ndakisa komɛla makaya to bangi, kosalela drɔgɛ to kolangwa masanga. a

3. Mpo na nini tosengeli kosambela Yehova elongo na Batatoli mosusu?

Makita oyo tosalaka pɔsɔ na pɔsɔ, epesaka biso libaku ya ‘kokumisa Yehova . . . na liyangani.’ (Nzembo 111:1, 2) Na makita na biso, toyembaka banzembo mpo na kokumisa Nzambe. (Tángá Nzembo 104:33.) Yehova asɛngi biso tókendaka makita mpo alingaka biso mpe ayebi ete ekosalisa biso tósepela na bomoi libela na libela. Na makita, tolendisanaka.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ntina oyo Yehova alingaka te tósalela bililingi na losambo na biso. Luká koyeba mpe makambo mosusu ya ntina oyo tokoki kosala mpo na kokumisa Nzambe.

4. Tosengeli te kosalela bililingi na losambo na biso

Ndenge nini toyebi ete kosala bongo ekosepelisa Nzambe te? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

  • Nini ekómelaki basaleli mosusu ya Nzambe ya ntango ya kala, ntango bazalaki kosalela bililingi to bikeko mpo na kosambela ye?

Bato mosusu bamonaka ete bakopusana pene ya Nzambe soki bazali kosalela bililingi na losambo na bango. Kasi Nzambe akopusana pene na bango soki basali bongo? Tángá Kobima 20:4-6 mpe Nzembo 106:35, 36, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Biloko to bililingi nini bato basalelaka na losambo na bango na esika ofandi?

  • Yehova atalelaka bililingi yango ndenge nini?

  • Bongo yo moko, otalelaka bililingi yango ndenge nini?

5. Soki tozali kosambela kaka Yehova tokolongwa na mateya ya lokuta

Talá ndenge oyo kosambela Yehova na ndenge alingaka ekoki kolongola biso na mateya ya lokuta. Talá VIDEO.

Tángá Nzembo 91:14, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Yehova alaki kosalela biso nini soki tozali kolinga ye mpe kosambela kaka ye?

6. Tosambelaka Nzambe na makita ya lisangá

Tokumisaka Yehova mpe tolendisaka basusu ntango toyembaka mpe topesaka biyano na makita ya lisangá. Tángá Nzembo 22:22, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Osepelaka koyoka biyano oyo epesamaka na makita?

  • Omibongisaka mpo na kopesa eyano?

7. Yehova asepelaka ntango toyebisaka basusu makambo oyo tozali koyekola

Tokoki koyebisa basusu mateya ya Biblia na ndenge mingi. Tángá Nzembo 9:1 mpe 34:1, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Likambo nini oyekoli na Biblia okosepela koyebisa basusu?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Tokoki kosepelisa Nzambe soki moke te.”

  • Okoloba nini?

NA MOKUSE

Tosepelisaka Moto oyo akelá biso ntango tosambelaka kaka ye, tokumisaka ye na makita ya lisangá mpe toyebisaka basusu makambo oyo tozali koyekola.

Bozongeli

  • Mokanda nini ekoki kosalisa biso tósambela Nzambe ndenge andimaka? Makambo nyonso ya losambo na biso esengeli kouta wapi?

  • Mpo na nini tosengeli kosambela kaka Yehova?

  • Mpo na nini tosengeli kosambela elongo na bato oyo balingaka kosepelisa Nzambe?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Tángá lisolo “Nazali lisusu te moombo ya bikeko,” mpo na komona ndenge mwasi moko atiká kosambela bikeko.

“Biblia ebongolaka bato” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2011)

Talá makambo oyo ekoki kosalisa yo opesa biyano na makita ya lisangá.

“Sanzolá Yehova na lisangá” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/2019)

Talá bolamu oyo elenge mobali moko azwi na makita ya lisangá atako ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ye kokende makita.

Yehova asungaki ngai (3:07)

Bato mingi bandimaka ete ekulusu ezali elembo oyo emonisaka lisangá ya bokristo. Okanisi nini, tokoki kosalela yango na losambo na biso?

“Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka ekulusu te na losambo?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

a Tokolobela makambo yango na mateya oyo ekoya.