Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 16

Yesu asalaki nini ntango azalaki awa na mabele?

Yesu asalaki nini ntango azalaki awa na mabele?

Bato mingi bayebi Yesu, kasi bato mosusu bamonaka ye lokola bebe, basusu bayebi ye lokola mosakoli moko ya bwanya, basusu mpe bayebi kaka mwa makambo etali liwa na ye. Kasi tokoki koyeba makambo na ye mingi soki totaleli bomoi oyo alekisaki awa na mabele. Na liteya oyo, tokomona makambo mosusu ya ntina mingi oyo Yesu asalaki mpe ndenge yango ekoki kosalisa yo.

1. Mosala nini ya ntina mingi Yesu asalaki?

Mosala ya ntina mingi oyo Yesu asalaki ezalaki ya “kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Tángá Luka 4:43.) Asakolaki nsango malamu ete Nzambe akotya bokonzi moko, to guvɛrnema oyo ekosilisa bampasi nyonso ya bato. a Na boumeli ya mbula misato na ndambo, Yesu asakwelaki bato nsango malamu na molende.​—Matai 9:35.

2. Mpo na nini Yesu asalaki makamwisi?

Biblia elobeli ebele ya ‘misala ya nguya mpe makamwisi mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela ya Yesu.’ (Mis. 2:22) Na lisalisi ya nguya ya Nzambe, Yesu akitisaki mipɛpɛ makasi, aleisaki bankóto ya bato, abikisaki bato ya maladi, mpe azongisaki kutu bato oyo bakufá na bomoi. (Matai 8:23-27; 14:15-21; Marko 6:56; Luka 7:11-17) Makamwisi oyo Yesu asalaki emonisaki polele ete Nzambe nde atindaki ye. Emonisaki mpe ete Yehova azali na nguya ya kosilisa bampasi na biso nyonso.

3. Mateya nini tokoki kozwa na ndenge Yesu atambwisaki bomoi na ye?

Yesu azalaki kotosa Yehova na makambo nyonso. (Tángá Yoane 8:29.) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalaki makambo oyo Tata na ye asɛngaki ye atako bato mingi balukaki kopekisa ye. Amonisaki ete bato bakoki kosalela Nzambe, ata soki bazali na mikakatano. Na yango, Yesu atikelá biso “ndakisa mpo tólanda matambe na ye malamumalamu.”​—1 Petro 2:21.

KƆTÁ NA MOZINDO

Talá ndenge oyo Yesu asakwelaki bato nsango malamu mpe asalaki makamwisi.

4. Yesu asakolaki nsango malamu

Yesu azalaki kotambola bakilomɛtrɛ ebele na makolo mpo na kosakwela bato mingi nsango malamu. Tángá Luka 8:1, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yesu asakwelaki kaka bato oyo bazalaki koya koyoka ye?

  • Milende nini Yesu asalaki mpo na kokutana na bato?

Nzambe alobaki ete Masiya akosakola nsango malamu. Tángá Yisaya 61:1, 2, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge nini Yesu akokisaki esakweli yango?

  • Okanisi ete bato basengeli koyoka nsango malamu lelo oyo?

5. Yesu ateyaki makambo ya ntina

Yesu asakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe ateyaki makambo oyo esalisaka bato tii lelo oyo. Tótalela mwa bandakisa na lisolo na ye likoló ya ngomba. Tángá Matai 6:14, 34 mpe 7:12, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Batoli nini ya malamu Yesu apesaki na bavɛrsɛ yango?

  • Okanisi ete batoli yango ekoki kosalisa bato lelo oyo?

6. Yesu asalaki makamwisi

Yehova apesaki Yesu nguya ya kosala makamwisi ebele. Mpo na komona ndakisa moko, tángá Marko 5:25-34 to talá VIDEO. Na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, mwasi oyo azalaki na maladi andimaki nini?

  • Likamwisi yango esepelisi yo na nini?

Tángá Yoane 5:36, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Makamwisi oyo Yesu asalaki ‘epesi litatoli’ nini to emonisi nini mpo na ye?

Oyebaki yango?

Makambo mingi oyo toyebi mpo na Yesu ezali na mikanda minei ya Biblia oyo babengi Baevanzile: Matai, Marko, Luka, mpe Yoane. Mokomi ya Evanzile mokomoko alobelaki makambo ndenge na ndenge oyo etali Yesu. Soki totángi makambo yango nyonso, tokoyeba malamu bomoi ya Yesu.

  • MATAI

    nde moto ya liboso akomaki Evanzile. Elobeli mateya ya Yesu, mingimingi makambo oyo Yesu ateyaki mpo na Bokonzi ya Nzambe.

  • MARKO

    akomaki Evanzile ya mokuse. Eyebisi biso makambo ebele oyo ezali kosepelisa.

  • LUKA

    ayebisi biso ndenge oyo libondeli ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu, mpe ndenge oyo Yesu azalaki kosalela basi makambo.

  • YOANE

    ayebisi biso makambo mingi oyo Yesu asololaki na baninga na ye ya motema mpe bato mosusu. Yango esalisi biso tóyeba bizaleli oyo Yesu azalaki na yango.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Yesu azalaki moto malamu, kasi Masiya te.”

  • Okoloba nini?

NA MOKUSE

Yesu asakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, asalaki makamwisi mpe atosaki Yehova na makambo nyonso.

Bozongeli

  • Mosala nini ya ntina mingi Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele?

  • Makamwisi oyo Yesu asalaki emonisi nini?

  • Makambo nini ya malamu Yesu ateyaki?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá ntina oyo tokoki kondima ete makamwisi oyo Yesu asalaki ezalaki mpenza solo.

“Makamwisi ya Yesu ekoki koteya yo nini?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2004)

Talá ndenge mobali moko abongolaki bomoi na ye ntango ayekolaki makambo mingi oyo Yesu asalaki mpo na kosalisa bato mosusu.

“Nazalaki koluka kaka matomba na ngai moko” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2014)

Talá liste ya makambo ya ntina mingi oyo Yesu asalaki mpe ndenge oyo elandani.

“Makambo minene ya bomoi ya Yesu awa na mabele” (Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe 4A tii 4H)

a Liteya 31-33 ekolobela na mozindo Bokonzi ya Nzambe.